Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ya ba musulmans bapameli bobomi ya Imam moko na losambo na Beni


Mosquée moko na Beni, Nord-kivu, 20 octobre 2014.
Mosquée moko na Beni, Nord-kivu, 20 octobre 2014.

Bakambi ba eyamba ya ba musulumane COMICO bapameli liwa lya mokambi ya losambo na Beni Imam Cheikh Aliamin, basengi bakambi ba mboka bobateli mpe kimya na bavandi ya Beni.

Cheikh Aliamin akufaki na masasi na motu o’mokolo mwa mposo kati na losambo azalaki kokamba na Beni.

Cheikh Aliamin akufaki na masasi kati na losambo ya mpokwa, elobi secrétaire ya COMICO, Twahara Djuma.

Secrétaire ayebisi ete bakonzi bayebaki ete ba ADF bazalaki koluka Cheikh Aliamin.

"Cheikh Aliamin azalaki kotelema ba musmans baye bazali koboma mpe koyiba ata ba ngulu ntango biso ba musulamane toliaka ata nyama yango te. Bakonzi bayebaki ete ba ADF bazalaki koluka mpe mikolo minso mya mitano azalaki kokende kotia manzaka na mokanda na ANR, misala mya bokengi. Kasi o;mokolo mwa mitano moleki atelemeli na makasi bato mabe mpe tala o;mokolo mwa mposo babeti ye masasi ntango azalaki kokamba losambo," ebakisi Twahara Djuma.

Cheikh Aliamin akundamaki o'mokolo mwa eyenga.

Liwa lya likomi ntango mbulamatari ya sika esakoli o'mokolo mwa mitano na likita lya yango ete mokonzi ya mboka akotia "état d'urgence" mpe bakambi ya basoda na bisika bitumba bizali kongala.

XS
SM
MD
LG