Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis ekobengana bayekoli ya bapaya ya ba universités eye ekokoba kotangisa kaka na internet


Elembo ya Département ya Intérieur mpe bokengi ya immibration mpe douanes (ICE) esika bapaya bakangamaka mpe bazongisamaka na Raymondville, Texas, Etats-Unis, 10 mai 2017.
Elembo ya Département ya Intérieur mpe bokengi ya immibration mpe douanes (ICE) esika bapaya bakangamaka mpe bazongisamaka na Raymondville, Texas, Etats-Unis, 10 mai 2017.

Mbulamatari ya Etats-Unis esakoli ete ekobengana bayekoli ya mboka ya bapay ya ba universités eye ekobanda kotangisa kaka na internet mpo na bobangi ya COVID-19.

Mbulamatari ya Etats-Unis esakoli ete ekopesa lisusu te visa na bana kelasi ya bikolo ya bapaya mpo na ba universités eye ekokoba kotangisa kaka na nzela ya internet na bozongi kelasi ya 2020 mpo na kobanga COVID19.

Bayekoli ya bapaya banso ya ba université yango oyo bazali nanu na mabele ma Amerika basengami kobima libanda ya Etats-Unis.

Esengeli babima mboka to bamikomisa na biteyelo epayi wapi bavanda na kelasi mpo kolanda amteya. Soki babimi te, bakobenganama na makasi, esakoli police ya immigration mpe douanes (ICE) na liyebisi.

Soki ba universités endimi kosaniga botangisi na internet na ya kati ya ndako ya eteyelo, esengeli bayebisa ete bayekoli na bango bakolanda mateya na kovanda na kelesa mpo ete bandimama kotikala na Etats-Unis.

Kaka ba yekoli ya Royaume-Uni mpe baye kalanda formations professionnelles to bayekolala misala nde bazwi ndingisa ya kotikala na Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG