Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba afundi ekolo ndenge ba soda bapunzaki biloko bya ye na bitumba na Kinshasa na 2006


Président Joseph Kabila (G) na vice-président Jean-Pierre Bemba (D) na bilili bitiami bisika moko, janvier 2004.
Président Joseph Kabila (G) na vice-président Jean-Pierre Bemba (D) na bilili bitiami bisika moko, janvier 2004.

Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC mpe vice-président ya kala, afundi ekolo na ye na Tribunal ya Grande instance ya Kinshasa/Gombe mpo na kosenga lomande ndenge basoda babebisaki ndako na ye ya Maluku na Kinshasa na bitumba nsima na maponami ya 2006 na Kinshasa.

Na bofundi yango, M. Bemba azali mpe kosenga lomande ndenge basoda bapunzaki biloko bya ye bisusu na bitumba byango.

Joseph Kabila, mokonzi ya mboka na ntango wana, asakolamaki molongi ya maponami ya 2006 na 44% mpe M. Bemba azwaki 20%, na tour ya mibale.

Bato koleka 350 bakufaki na bitumba bikasi bingalaki kati na basoda bazalaki kokengela M. Bemba na baye bazalaki kokengele M. Kabila (GSSP). Bitumba byango bizalaki mingi mingi na commune ya Gombe.

M. Bemba, mokambi ya lingomba lya kala lya batomboki oyo ebongwanaki lingomba lya politiki, azalaki kokengelama na basoda ba ye, batomboki ba kala.

Nisma na yango, M. Bemba akimaki na Portugal mpe akangamaki mwa ntango moke nsima mpe atindamaki na CPI (Cour pénale internationale) mpo na mbeba ya bomoto mpe ya bitumba basoda ba MLC basalaka na Centrafrique na 2003.

CPI etikaki M. Bemba na juin 2018, nsima na mibu zomi ya bokangami. Bilembo bya maye afundamaki na yango bimonanaki te.

XS
SM
MD
LG