Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kampala efundi Kigali kopekisa basali mibembo kokende na Ouganda


Bamamelo bazali kosambela na malita ya ba martyrs na Mamugongo, na Ouganda, le 28 novembre 2015.
Bamamelo bazali kosambela na malita ya ba martyrs na Mamugongo, na Ouganda, le 28 novembre 2015.

Ba soda ya Rwanda bapekisi bana 200 ya ekolo na bango kokatisa na Ouganda mpo na milulu ya bokanisi ya ba martyrs ya Buganda, nkombo ya kala ya ndambo ya Ouganda, epaleli bakonzi ya Kampala.

"Koleka 200 Rwandais baye bazalaki koya mpo na mokolo ya ba martyrs bapekisami na baye ya mampinga kokatisa ndelo mpo na koya na ngambo ya Ouganda mpe bazongisami na ndako na bango," elobi na AFP Joninah Buseingye moko ya bakonzi na ndelo ya Katuna, pene na Rwanda.

Yango elakisi "lolenge nini boyakani kati na Ouganda mpe Rwanda bobebisami. Bakomi sik’oyo kobekisa makoki ya bato ya kosamebla", elobi Busingye.

Milulu myango eyambaka mibu na mibu basambeli bawutaka mokili mobimba.

Baye ya RDC mpe ya Burundi bakatisaki.

"Bayebisaki biso ete tokoki koleka (na Rwanda) te mpo na kokende na Ouganda," etatoli na AFP mwasi moko ya mibu 66.

Na ba mibu 1880, mokonzi ya Buganda (eye ekoma etuka moko ya Ouganda ya lelo) atindaki baboma bato 45 baye bayambaki eyamba ba kristu.

Ba Rwandais bakendaka le 3 juin nyonso ya milulu miye. Kasi, Rwanda ekangi ndelo na yango banda sanza ya mibale.

XS
SM
MD
LG