Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pompeo alaki boleki na bopete na mandat ya mibale ya Trump


President Donald Trump na Maison Blanche, Washington, 22 octobre 2020.
President Donald Trump na Maison Blanche, Washington, 22 octobre 2020.

Sécretaire d’Etat ya Etats-Unis Mike Pompeo alaki mardi boleki na bopete ya bokonzi kasi mpo na ye ekozali mandat ya mibale ya président Donald Trump na esika ya Joe Biden oyo amonani lokola molongi.

"Ekozala na boleki na bokonzi ya mibale ya Trump," elobi M. Pompeo na bokutani na bapanzi sango.

M. Pompeo aboyi kondima elonga ya M. Biden, vice-président ya kala ya Etats-Unis.

O’mokolo na mposo, ba media basakolaki ete M. Biden amonani lokola molongi na kozwaka baponami banene koleka 270.

M. Trump na bato bayo basengaki na bazuzi kotala malamu botangi bwa bilembo mpo bakanisi ete mbeba mpe moyibi mingi esalamaki na maponami.

"Tokotanga boponami bonso," elobi M. Pompeo.

Secrétaire d’Etat alobi ete bakonzi banso na mokili bayebi ete ezali na misala mya bazuzi miye misengaka ntango molayi.

Bakonzi ya mboka mingi bazali kokoba kopesa losako na elonga ya M. Biden.

XS
SM
MD
LG