Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre ya Sembo apesi ndingisa na bolukiluki mbeba na maponami na USA


Président Donald Trump na ministre ya Sembo Bill Barr (G) na Maison Blanche, Washington, 1avril 2020.
Président Donald Trump na ministre ya Sembo Bill Barr (G) na Maison Blanche, Washington, 1avril 2020.

Ministre ya mambi ma Sembo Bill Barr apesaki ndingisa lundi na mpokwa mpo na bolukiluki likolo na mbeba ekoki kozala na maponami ma mokonzi ya Etats-Unis masalamaki le 3 novembre. Zuzi Richard Pilger oyo alandelaka mbeba na maponami na mboka mobimba atiki mosala nsima na mokano ya ministre.

"Napesi bino ndingisa ya kolukaluka likolo na mbeba inso etali maponami mpe botangi nkasa yambo bondimami bwa maponami na bisika bokambaka," ekomi na mokanda M. Barr.

Procureur général alobi, na ngambo na ye, ete ndingisa eye epesami na ba procureurs fédéraux ya ba états inso, elakisi te ete ministère ya Sembo ezali na bilembo bikolakisa ete mbeba esalamaki solo.

Bolukiluki ya mbeba bosalamaka na ba états.

"Bolukiluki boye bokoki kosalama soki nungu nungu elakisi ete ekoki kozala na mbeba emonani polele mpe mbeba yango ekoki kozala na mbano likolo lya bilembo bya maponami na état moko," ekomi M. Barr.

Lipinga lya campagne ya président Donald Trump oyo azali na ebonga lizali kobunda na kosenga bazuzi kotala likambo lya maponami maye Joe Biden, vice-président ya kala, amonisami kozala molongi.

XS
SM
MD
LG