Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi Amerika bazwi mangwele bapesami ndingisa ya kotambola na bozangi masque


Président Joe Biden azali kolebela malako masika mpo na COVID-19, libanda lya Maison Blanche, Washington, 27 avril 2021.
Président Joe Biden azali kolebela malako masika mpo na COVID-19, libanda lya Maison Blanche, Washington, 27 avril 2021.

Bana ba Amerika bazwi mangwele bakoki kokende libanda ata bazipi zolo na monoko te, esakoli président Joe Biden na kotobolama ntonga ya yambo ye mpe lokola mardi na Maison Blanche na Washington.

M. Biden asepeli mpe alobi ete bilembo bya kokamwisa bimosami na bitumba na COVID-19 yango mikano mya bobatelama bilembisami.

"Na baye bazwi mangwele nanu te, mingi mpenza na soki ozali elenge to zoali kokanisa ete ozali na mposa na yango te, yango nde ntina enene ya kokende kozwa yango. Sik’oyo mpeza," elobi M. Biden.

CDC (ba Centres ya botali mpe bopekisi makoni) oyo ezali mambongisi ya mbulamatari ya Etats-Unis, elobi ete epesi ndingisa na bana ba Amerika batobolami mangwele na kokende libanda ata bazipi zolo mpe monoko te na masque.

"Bokoki kobanda kosala makambo mingi bozalaki lisusu te kosala likolo lya bokono," elimboli liyabisi lya CDC,

Masque elobami ete ezali nanu na litomba ata mpo na baye bazwi mangwele, mingi mingi soki bakende na milulu mya bato ebele lokola ba concerts, parades to lifili to mpe masona ya bato mingi, elobi bakambi ba CDC.

Kalanda bakonzi ba Amerika, kati kati ya motango ya kolo to ba adultes banso na Etats-Unis nde basi babetami mangwele ma COVID-19.

XS
SM
MD
LG