Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayekoli ya ba universités publiques bazongeli nzela ya kelasi na Brazzaville


Bayekoli baike na université Marien Ngouabi à Brazzaville, Congo, 19 janvier 2017. (VOA/Ngouela Ngoussou)
Bayekoli baike na université Marien Ngouabi à Brazzaville, Congo, 19 janvier 2017. (VOA/Ngouela Ngoussou)

Bana ba kelasi ya ba universités publiques bazongeli kotanga na biteyelo bya bango lundi nsima na sanza motoba mya bovandi na ndako mpo na COVID19.

Esengami na bango kobatela malako mya COVID19 lokola kolata masque mpe kozala na mayi ya alchool mpo na kosukola maboko ntango inso.

Batondisaki ba kelasi ba bango, kolanda bapanzi sango bakitaki na bityelo lokola na Ecole normale supérieur (ENS).

Kasi bazali nanu na nkwokoso nzike lokola.

"Mbala ya suka tofutamaki bourse universitaire ezalaki mpo na sanza misato ya mobu 2017. Misolo mya sanza misato mitakali mpo na wuto 2017, mpe mpo na 2018, 2019 mpe ya 2020, yang0 onde tozali kozela," elobi mokambi ya Mouvement national des élèves et étudiants du Congo (MEEC), Koncernant Epara.

XS
SM
MD
LG