Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato zomi na babale bakufi na mpela na Ouganda


vabadani bazali kotala ndako ebukani na bokweyisa mabela na mpela na Bududa, Ouganda,12 octobre 2018.
vabadani bazali kotala ndako ebukani na bokweyisa mabela na mpela na Bududa, Ouganda,12 octobre 2018.

Sango yango epesami na Croix-Rouge ya esika eye.

"Tozwi nzoto 12 na mayi mpe moto moko amemami na lopitalo mpo na mpota enene," eyebisi AFP na nzela ya singa Diana Tumuhimbise, mokambi ya Croix-Rouge na Bundibugyo.

Manoka mabandaki vendredi na mpokwa mpe makobaki kino ngonga ya 9 heures ya ntongo ya mokolo ya mposo," ebakisi M Diana.

Ndako mingi ememami, nzela ekangami mpe mingi ezingi mpenza,

Croix-Rouge, pulusu, mampinga mpe bavandi bazali kosunga na bisika ebele.

Mpela ekasi ebetaki esika eye na ndelo na RDC, ekabwana na Ouganda na ngomba ya Rwenzori.

Koleka bato 20 bakufaki na bomati ya mayi mpe bokweyisami mabele bomemaki pototo, kolanda Croix-Rouge na mbulamatari.

XS
SM
MD
LG