Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato motoba bakufi ntango Cour constitutionnelle endimi elonga ya Ouattara


Président ya Cour constitutionnelle Mamadou Koné (4e G) akomi mpo na kopesa mokana ya maponami ya mokonzi ya mbola ya la 31 octobre na Abindja, Côte d'Ivoire, 9 novembre 2020.
Président ya Cour constitutionnelle Mamadou Koné (4e G) akomi mpo na kopesa mokana ya maponami ya mokonzi ya mbola ya la 31 octobre na Abindja, Côte d'Ivoire, 9 novembre 2020.

Bato motoba bakusi na matata na Côte d’Ivoire lundi, mokolo Cour constitutionnelle endimi elonga ya président Alassane Ouattara mpo kokamba mboka mbala ya misato.

Bato bakufi na bitumba na Daoukro, na centre-est, esika ya président ya kala mpe mokambi ya opposition Henri Konan Bedié.

Moko kati bato bawei na Doaukro akatamaki moto mpe mosusu atumbami, kolanda ndimbola ya préfète ya etuka eye Solange Aka,

Na Elibou (centre), bato basato basusu bakufi na bitumba na ba gendarmes.

Opposition eboyaki maponami ma le 31 octobre mpe ekalaki Conseil national ya transition mpe na kokamba mboka, kolanda maloba na yango.

Opposition elobi M. Ouattara abuki Buku likonzi na kozala na mponami mpe na kozwa bokonzi mpo na mbala ya misato.

Lelo lundi, Cour constitionnelle endimi mpe esakoli elonga ya M. Ouattara na mponami ma le 31 octobre 2020 na 94,27%.

XS
SM
MD
LG