Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Vice-président atiki mosala nsima na liwa ya Ministre wa yambo na Côte d’Ivoire


Vice-Président ya Côte d'Ivoire na Abidjan, le 13 juillet 2020.
Vice-Président ya Côte d'Ivoire na Abidjan, le 13 juillet 2020.

Vice-président Daniel Kablan Duncan atiki mosala mikolo mitano nsima na liwa lya Ministre wa yambo mpe candidat na maponami ya le 31 octobre na Côte d’Ivoire.

Président Alassane Ouattara andimi mokanda Kablan Duncan apesaki mpo na kotika mosala.

Kablan Duncan, na mibu 77, akomaki na mokanda mwa ye ya kotika mosala ete ezali mpo na ye moko nde atiki mosala.

Mokanda mwango motindamaki wuto sanza ya mibale.

Kablan Duncan azali moyi PDCI, lingomba likota na oppopsition, kasi atikala pene na president Ouattara.

Mikolo mitano mileki, Premier Amadou Gon Coulibaly, oyo azalaki candidat RHDP, lingomba ya président Ouattara, na maponami ya mokonzi ya mboka le 31 octobre 2020, akufaki.

Azongaki France mikolo miike mileki mpo na kosalisa nzoto na ye.

XS
SM
MD
LG