Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre wa yambo ya Côte d’Ivoire Amadou Gon Coulibaly akufi


Amadou Gon Coulibaly, Ministre wa yambo ya Côte d'Ivoire, na bozongi na ye kowuta France, na libanda lya mpepo ya Abidjan, 2 juillet 2020.
Amadou Gon Coulibaly, Ministre wa yambo ya Côte d'Ivoire, na bozongi na ye kowuta France, na libanda lya mpepo ya Abidjan, 2 juillet 2020.

Ministre wa yambo ya Côte d’Ivoire Amadou Gon Coulibaly akufi mercredi na Abidjan nsima na nkowkoso na motema.

Candidat na maponami ma mokonzi ya mboka ya octobre ekoya mpo na RHDP lingomba ya président Alassane Oauttara, Amadou Coulibaly Gon azalaki na mibu tuku motoba na moko.

Président Ouattara apesi ye losako lokola "mwana", "ndeko" mpe "mosungi na ye ya sembo: wuto mibu mingi.

Akufaki nsima na kozala na likita lya mbulamatari.

Amadou Coulibaly Gon azongaki na Côte d’ivoire jeudi eleki na kowuta na France mpo na lisalisi ya nzoto.

Atiamaki motema mosusu na 2012.

Liwa lya likotanda M. Alassane Ouattara kopona moto mosusu oyo akolakisa elongi na bango na maponami makoya.

XS
SM
MD
LG