Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 41 bawei na mpela ekasi na Kinshasa


Ndako mingi ebukani na bokweyisami ya mabele na nse ya mpela ekasi na Kinshasa, 26 novembre 2019.
Ndako mingi ebukani na bokweyisami ya mabele na nse ya mpela ekasi na Kinshasa, 26 novembre 2019.

Koleka bato 41 bakufi na nse ya mpela ekasi o'butu boleki na Kinshasa, eyebisi mokambi molandi ya engumba eye, Neron Mbungu.

"Ministre (provincial) ya Intérieur awuti kopesa ngai motango ya bato 41 bakufi. Bolukiluki bozali kokoba. Biloko ebele bibebi mpe bato bayike bazwi mpasi," elobi M. Mbungu.

Mokambi molandi ya Kinshasa atombalaki bisiki mbeba esalami, mingi mpenza na Livulu na commune ya Lemba.

Bato bazwi mpasi bamemaki na bokweyisami ya mabele, kolanda M. Mbungu.

Gbagba (ponts) mibale ekweyi mpe nzela ya université ya Kinshasa ebukani.

Ndambo ya engumba, mingi mpenza ya Ouest, ezangi mayi yakomela. Régideso, usine l'Etat eye epesaka mayi ya komela esakoli ete station na yango ya Lukunga ekati misala mpo na mbeba ya mpela ekasi eye.

"Bisika mingi bizindi. Mwana moko ekangami na lotiliki," elobi M. Mbungu.

Bato ebele bakufaki na na bokweyisami mpe bobukani ya mabele na 2018 na Kinshasa na mbula enokaki o’kati ya butu.

XS
SM
MD
LG