Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakonzi ya RDC bazali kobanga ete batomboki ya FDLR ba attaquer Rwanda  


Président Félix Tshisekedi, na loboko ya mobali, na ntoma ya ONU mpe mokambi ya Monsuco na RDC, Leila Zerrougui, na bokutani na Kinshasa, le 30 décembre 2019. (Facebook/FathiPresident2018)
Président Félix Tshisekedi, na loboko ya mobali, na ntoma ya ONU mpe mokambi ya Monsuco na RDC, Leila Zerrougui, na bokutani na Kinshasa, le 30 décembre 2019. (Facebook/FathiPresident2018)

Bakonzi ya ekolo RDC basengaki na Monusco kokangela nzela na batomboki ya FDLR ya Rwanda baye bazali kolongwa na Nord-Kivu kokende na Sud-Kivu elongo na mabota bango na bibundeli too minduki.

Bakonzi ya RDC bakanisi ete ba AFDLR (batomboki ya Forces démocratiques pour la libération ya Rwanda) bazali komibongisama mpo kosala bitumba na Rwanda.

Gouvernement ya RDC elobi elingi te ete mabele ya Congo ezala esika batomboki songolo kobongisa bitumba na bamboka nzinga nzinga.

Mokonzi oyo abimi na maponami na RDC, Félix Tshsiekedi ye akutanki na ntoma ya ONU mpe mokambi ya Monusco, Mme Leila Zerrougi mercredi.

Bakonzi ya RDC bakanisi ete batomboki ya FDLR bazali koluka kosangana na motomboki mosusu ya Rwanda, general ya kala Faustin Kayumba Nyamwasa oyo afundami mpo na koluka kokweyisa bokonzi ya Rwanda.

Nzokande, Faustin Kanyumba oyo akima na Afrique ya Sud too ya Ngele, alobi na AFP te bakonzi ya Rwanda bazali kobangisa too kolengisa ba opposants.

Kolonda site ya basango Igihe liye lisaka mpo na gouvernement ya Rwanda, parquet ebimisaki mokonda ya bokangemi mpo na Faustin Kayumba, mokambi ya Congrès national rwandais (RNC), mpe bakambi misusu ya P5, lingomba ya sika ya batomboki ya mboka Rwanda oyo evandi na monyele too est ya RDC, kolanda AFP.

Mikolo misato moleki, Gouvernement ya RDC elobaki ete ezongisi na Rwanda bakonzi mibale ya mibale ya FDLR.

Kati nabango, molobeli ya FDLR, Bazeye Fils La Forge.

XS
SM
MD
LG