Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 13 bakufi na likama lya motuka na Kabeya Kamwanga


Mosali ya lisungi na esika ya likama ya engunduka na Ndenga Mongo, na Kasaï, 4 aout 2007.
Mosali ya lisungi na esika ya likama ya engunduka na Ndenga Mongo, na Kasaï, 4 aout 2007.

Bato 13 bakufi na likama lya motuka monene butu boleki na mboka Matshia, na etando ya Kabeya Kamwanga, na 45 kms ya Mbuji-Mayi, na Kasaï Oriental

Basi basato bazali kati na bawei. Mokumbi motuka azalaki na molongwa, elobi moyangeli molandi ya etando eye, Kally Kalala Milongo.

Motuka yango ezalaki kokita na Kinshasa.

Etondaki na biloko na koleka ndelo lokola mituka mingi esalaka mobembo na ba nzela ya RDC/

XS
SM
MD
LG