Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi petololo balaki kotelemisa boteki wuto jeudi na Kasaï mpe Katanga ya kala


Mituka na bakumbi na yango basali molongo mpo na kozela essence na satation service na Kinshasa, 15 mai 2000.
Mituka na bakumbi na yango basali molongo mpo na kozela essence na satation service na Kinshasa, 15 mai 2000.

Ba sociétés ya pétrole ya bituka ya kala ya Katanga mpe Kasaï balaki kotelemisa boteki mpe bokaboli bwa petololo na bango wuto jeudi le 6 août 2020 mpo na kosenga bomati bwa ntalo na pompe.

Lingomba ya bayi petrole kati na FEC (Fédération des entreprises du Congo) lizali kosenga ete ntalo ya petrole elanda ndenge makambo manso mazali komata na mboka mpe na molongo.

Bakomelaki ministre ya Economie le 30 juillet 2020 mpe balobaki ete bazali na nkwokoso nzambi na bokweyisami ya maye manso makotaka na ntalo ya petololo.

Basengi na mbulamatari komatisa ntalo.

"Kino sika, lokola tozwi structure ya ntalo ya sika te, lobiko etikali mpo na entreprises epesaka petolo na maye manso masalami na yango na etando ya sud, kaka kotelemisa boteki mpe bopesi produits pétroliers wuto mokolo mwa jeudi 6 aouut 2020," ekomi bango na mokanda mwango.

Mpo na ba compagnies baye, ntalo ya petololo ya nse ezali kozangisa bango misolo mingi.

Le 7 mai 2020, nsima na koyokana na bayi petololo, mbulamatari esilaki kokitisa ntalo ya litre ya essence wuto 1760FC kino 1390FC, ya gasoil wuto 1750 FC kino 1450 FC mpe ya Jet A1 wuto 2168,01 FC kino 1647,93 FC.

Ministère ya Economie elobaki bokitisami bwa 12% bwango bozalaki mpo na mbano mabe ya COVID19 na makambo manso mpe na mokili mobimba.

XS
SM
MD
LG