Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 13 bakangami na kofundama na kobongisa ba "attaques terroristes" na Rwanda


Président Paula Kagame (G) ya Rwanda na président Filipe Nyusi (D) ya Mozambique na sokoto ya basoda epayi mampinga ma Rwanda mazali kobundisa badongolomeso na Cabo Delgabo, Mozambique, 24 septembre 2021.
Président Paula Kagame (G) ya Rwanda na président Filipe Nyusi (D) ya Mozambique na sokoto ya basoda epayi mampinga ma Rwanda mazali kobundisa badongolomeso na Cabo Delgabo, Mozambique, 24 septembre 2021.

Police ya Rwanda elakisi na bapanzi sango bato 13 efundi na kobongisa ba "attaques terroristes" na Kigali. Bato bango basalaka na ba babundi ya ba ADF baye bazalaka na RDC, elobi police ya Rwanda.

Police ya Rwanda esakoli ete bato bango bakandami na bisaleli ya kokela ba bombes lokola ba explosifs, ba singa, ba sete mpe ba télépjones.

"Bolukiluki bopesi nzela na kokanga lingoma moke moko ya ba dongolomeso basalaka na ba Forces démocratiques alliées (ADF)" [lingomba libotama na Ouganda kasi lisalaka na RDC], eyebisi police.

Ba ADF bamikotisa na lingomba Etat islamique.

Rwanda etinda basoda ba yango babundisa badongolomeso basusu bazali mpe na lingomba Etat islamique kasi na Mozambique.

Mampinga ma Rwanda masakolaki mikolo mileki ete mabenganaki ba dongolomeso yango na etuka ya Mozambique ya Cabo Delgato.

Président Paul Kagame ya Rwanda akendaki kutu mposo moleki na Cabo Delgabo mpo na yango.

Badongolomeso ya Mozambique bazali mpe na boyokani na baye ya RDC baye bafundamaka na koboma mingi na est monyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG