Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi akiti na Brazzaville


Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika RDC, na moninga wa ye ya Congo-Brazzaville, Denis Sassou Nguesso, bavandi na salon d'honneur ya libanda ya pepo ya Mayamaya, Brazzaville, Congo, 7 février 2019. (Twitter/Gyslain Luke)
Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika RDC, na moninga wa ye ya Congo-Brazzaville, Denis Sassou Nguesso, bavandi na salon d'honneur ya libanda ya pepo ya Mayamaya, Brazzaville, Congo, 7 février 2019. (Twitter/Gyslain Luke)

Mokonzi ya sika ya RDC akiti na libanda ya pepo ya Mayaya, na Brazzaville, esika wapi ayambami na moninga wa ye ya Congo-Brazzaville, Denis Sassou Nguesso.

Félix Tshisekedi ayambami mpe bituluku ya bato.

Atamboli koleka 300 mètres mpe apesi mbote na ba ye bayaki koyamba ye.

Nsima, akoti na motuka ye na Denis Sassou Nguesso mpe bakeyi na Palais du peuple mpo na masolo.

Na mpokwa nde bazwami na limpati monene.

Lobi vendredi nde liyebisi ezali kozelema mpo na masolo maye ya Brazzaville.

Nzokande président Félix Tshisekedi awuti Nairobi, na Kenya epayi wapi azalaki banda lobi moleki.

Akutanaki kuta na moninga wa ye, mokonzi ya ekolo Kenya, Uhuru Kenyatta oyo alaki kopesa RDC maboko mpo kokende liboso.

Uhuru Kenyatta alobaki lobi ete expérience ya mboka na ye ekosunga RDC na botongi démocratie.

Kasi Félix Tshisekedi akutanaki mpe na mokambi ya opposition ya Kenya, Raïla Odinga oyo alobi mpe te mboka na ye ekosunga mpo na coopération économique mpe ba infrastructures.

Yambo na Kenya, Félix Tshiskedi abandaki mobembo wa ye wa yambo na Angola, o’mokolo mwa lundi moleki. Asalolaki na mokambi ya Angola Joao Lourenço mpo na bondeko mpe coopération économique.

XS
SM
MD
LG