Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Basoda minei ya FARDC mpe ba miliciens Lendu 13 bakufi na bitumba na Ituri


Policier azali kokengela baye balingi kokima bitumba na Bunia, 20 juin 2003
Policier azali kokengela baye balingi kokima bitumba na Bunia, 20 juin 2003

Ba miliciens Lendu babundisaki position moko ya ba FARDC na mboka Musekere na etuka ya Ituri, eyebisi lieutenant-général Egide Ngoy, commandat ya Force navale na Kasenyi (Ituri).

Basoda minei ya FARDC mpe batomboki zomi na misato bakufi na bitumba biye pene na lac Albert pene na ekolo Ouganda, kolanda bakonzi ya mampinga ya RDC.

Bato ya kabila Lendu babunda mbala ebele na ba Hema mpo na kowelela mabele.

Na 2018, bato 300.000 bakimaki na Ouganda nsima na bitumba kati bakabila biye.

XS
SM
MD
LG