Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Babengani général de brigade Salumu na mapinga mpo na détournement


Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika na RDC na officier d'ordonnance na ye, na milulu ya bozuwi bokonzi na Kinshasa, le 24 janvier 2019.
Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika na RDC na officier d'ordonnance na ye, na milulu ya bozuwi bokonzi na Kinshasa, le 24 janvier 2019.

Général de brigade Salumu Mbilika, conseiller ya mambi ya génie na inspection générale ya FARDC, alongwe na mampinga ya RDC mpo na détournement ya misolo, elakisi mokonda ministre ya Défense Crispin Atama Tabe atindeli ye.

Na mokanda yango, ministre atangi ordonnance présidentielle ya 27 décembre tango ya président Joseph Kabila oyo epesi mitindo ya kolongola officier ya likolo moye na mampinga.

"Rapport ya inspection ya bosaleli misolo mpo na kobongisa ba bases militaires ya Kamina mpe Kitona oyo ezalaki na mokumba na yo lokola commandant du corps de génie etalisi mbemba minene mpo na yo mpe epesei mpasi makasi na mampinga," ekomi ministre Atama Tabe.

Minsitre Atana Tabe atondi officier liye matondi mpo mosala asala mpe atombeli ye libaku malamu mpo na mosala akosala libanda ya mampinga.

Kasi mokanda liye elobi te ete bakosambisa ye.

Félix Tshsiekedi akotaki na bokonzi le 24 janvier 2019. Akomi président ya mitano ya RDC. Alobaki na mokolo ya kolapa ndayi ete ekombundisa kanyaka mingi.

XS
SM
MD
LG