Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basali basato ya IMG na infirmier mokonzi moko bamemami na basimba minduki pene na Fizi


Un camion chargé de jerrycans de carburant en difficulté sur une route boueuse près de Fizi, Sud-Kivu, 24 mars 2015.
Un camion chargé de jerrycans de carburant en difficulté sur une route boueuse près de Fizi, Sud-Kivu, 24 mars 2015.

Basali basato ya ONG “International Medical Corps” (IMG) elongo na infirmier titulaire moko ya centre de santé ya Lumanya bamememaki o’mokolo mwa mibale na basimba minduki na mboka kakela. na Sud-Kivu.

Likama lyango lisalami pene na Fizi.

Mokonzi ya Kakela, mboka ike, na nkombo Jean Kasidi, ayebisi Actualité.CD ete motuka mozalaki komema bato banei baye, mokweyaki na motambo ya basimba minduki baye bamemaki bango o’zamba na nzela ya Kakungu.

Mampinga ma Ekolo mayaki mwa ntango nsima mpe police ya nzela elongolaki motuka yango kasi emonaki bato banei baye te.

Bayi société civile basengi botika ya bato baye.

Lingomba moko te ya basimba minduki lyoko te lisi lindimi ete yango nde limemi bato baye.

Ekomi mbala mingi nde basali ba lisungi mpe bato basusu bamema na Fizi to na Uvira mobu moye.

MSF (Médecin sans Frontiètres) kutu ekataki misala mya yango ma zone ya santé ya Kimbi-Lulene mpe Fizi na Baraka ba sanza elki mpo na yango.

XS
SM
MD
LG