Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FARDC babotoli ngomba ya Chanzu na Runyonyi, elobi mokambi ya etuka ya civili Nzanzu


Ba FARDC, mampinga ma Ekolo Congo démocratique bazali kotindika motuka kati na potopoto na nzela ya Kibirizi na Bwito, Ruthusuru, Nord-Kivu, 5 mai 2018
Ba FARDC, mampinga ma Ekolo Congo démocratique bazali kotindika motuka kati na potopoto na nzela ya Kibirizi na Bwito, Ruthusuru, Nord-Kivu, 5 mai 2018

Mokambi ya civili ya Nord-Kivu asokili ete mampinga ya ba FARDC mampinga ma Ekolo Congo démocratique, mabotoli ngomba ya Chanzu na Runyonyi epayi basimba minduki bakotaki wuto butu boleki.

"Matondi mingi na ba FARDC baye bawuti kobotola ngomba ya Chanzu," ekomi na Twitter mokambi ya civili ya Nord-Kivu Carly Nzanzu Kasivita.

Etuka ya Nord-Kivu ezali na nse ya état de siège mpe ekambami wuto sanza ya mitano na mokambi ya soda, lieutenant-général Constant Ndima Kongba.

Ngonga minei yambo na yambo, M. Nzanzu atiaki Tweet mosusu.

"Lisitwale ya Chanzu na Runyonyi etali biso ete nanpinga malonganga kaka mongunga.,, Topesi bino makasi. Bokende liboso, Bolonga," ekomaki M. Nzanzu ntango mampinga ma RDC mazalaki nanu kopusana.

Molobeli mampinga ma RDC asakolaki ete batomboki ya M23 nde bazwaki mboka eye mibale.

Kasi bayi M23 bawangni yango na liyebisi mokambi na bango, Bretrand Bisimwa atiea manzaka.

Kasi bakambi ya etuka ya Nord-Kivu bakundoli ete M23 esi ekbwana nan gambo mibale.

Bavandi ya Chanzu mpe Runynyi bakimi lokito ya masasi mpe bitumba mpo na kokende na Bunagana.

XS
SM
MD
LG