Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kampala elobi basoda ya Rwanda babomi bato babale o'ngambo ya Ouganda


President Paul Kagame ya Rwanda (G) na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni na masolo na Entebe, Ouganda, 25 mars 2018.
President Paul Kagame ya Rwanda (G) na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni na masolo na Entebe, Ouganda, 25 mars 2018.

Ministère ya mambi ya Bapaya ya Ouganda etindi mokanda na mokokani na yango ya Rwanda mpo na kopalela basoda babale ya Rwanda nzambi bakatisaki ngambo mpe babomaki bato babale na Ouganda.

Na mokando myango mimonani na AFP, bakonzi ya Ouganda bayebisi ete "batungisami mingi" mpo kobomana ya bato baye babale na mboka Kiruhura na sud ouest ya Ouganda.

Kamapla elobi ete basoda ya Rwanda bakatisaki ndelo koleka ntaka ya ba metres 50 na ngambo ya Ouganda mpo na kokanga moye ya Rwanda moko moye mozalaki kptambola likolo na moto etonda ma biloko ya koteka. Moto moye alandamaki, alingaki kokata na Rwanda kasi abalukaki nsima na komona ba soda na ndelo, elobi Kampala.

"Moto yango atiyaki matata ntango na bokangemi na ye. Azwaki masasi na mutu mpe akufaki," elobi bakonzi ya Ouganda.

Babakisi ete moto mosusu ya Ouganda amekaki kokotela ye, ye mpe bamobomaki lokoka na basoda ya Rwanda mpe bamibendaki na ngambo ya mboka na bango.

Governement ya Ouganda epameli makasi nyonso bokatisi ndelo oye na kobuka mobeko epayi ya basoda ya Rwanda mpe epameli lisusu ekala eye ya kanza mpe mabe makasi likolo na ba civils bazangi minduki," elobie ministere ya mambi ya Bapaya ya Ouganda.

Bikolo babale biye bizal komikengele mikolo. Matata kati na bango mamati ndelo.

XS
SM
MD
LG