Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Antoine Kesia-Mbe Mindua ya RDC aponami vice-président ya mibale ya CPI


Zuzi Antoine Kesia-Mbe Mindua na bosambisami ya moyi Centrafrique Patrice-Edouard Ngaissona na Cour pénale internationale, na La Haye, Pays-Bas, 25 janvier 2019.
Zuzi Antoine Kesia-Mbe Mindua na bosambisami ya moyi Centrafrique Patrice-Edouard Ngaissona na Cour pénale internationale, na La Haye, Pays-Bas, 25 janvier 2019.

Antoine Kesia-Mbe Mindua ya Ekolo Congon démocratique aponami vice-president ya mibale ya Cour pénale internationale mpo na mibu misato.

Piotr Homanski ya Pologne nde apobani president mpe mama Luz del Carmen Ibanez Carranza ya Peru de vice-présidente.

Bazuzi ya CPI baponaki bango jeudi na nzela ya internet mpo na mikano ya komibatela na COVID-19.

Zuzi Mindua azali mibu 64, abotama na RDC.

Zuzi Mindua atanga Mibeko mpe kelasi ya politi na Université ya Kinshasa, ya Strasbourg na France mpe na Genve ya Swisse.

Azali na diplôme ya docteur ya Droit international (Mibeko) ya Université ya Genve wuto 1995.

Asalaka yambo na Tribumal pénal international ya Rwanda na Arusha na Tanzanie wuto 1996 kino 2001.

Asalaka mpe bo’zuzi na Tribunal pénal international ya Yougoslavie ya kala na La Haye, na Pays-Bas, wuto 2003 kino sika.

Zuzi Minua azalaka mpe ntoma monene mpe ya nguya ya libela ya RDC na Swisse.

XS
SM
MD
LG