Ntoma ya Angola na Ekolo Congo démocratique akomeli mbulamatari ya RDC mpo na koyanola na bofundami bosalamaki na mokambi ba FARDC, general d’armée Célestin Mbala Munsese mikolo mileki.
Général d'armée Mbala akomelaki ministre ya Bobateli ekolo mpe moyi ya Bikolo bya Bapaya mo na kopesa bango sango ete misala mya bokengi mya RDC mimonaki badosa ba Angola na mboka Tshela, Moanda mpe Songolo baye bazalaki koluka batomboki ba FLEC.
Mokambi ba FARDC akundolaki ete bikolo mibale bizali kati na SADC, lingomba lya nkita ya mboka ya Afrika ya nse eye epekisa kokota na mabele moninga.
Na eyano na yango, Ambassade ya Angola elobi elingi soki moko te kobebisa boyokani na Ekolo Congo démocratique.
Ambassade ya Angola elobi ezali kotosa mikano mya molongo.