Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden na Trump bazali kobeta ntangwa mpo bayindo bapona bango


Président elect Joe Biden (D) na président Donald Trump (G) na bilili ya kosangisa, 22 octobre 2020.
Président elect Joe Biden (D) na président Donald Trump (G) na bilili ya kosangisa, 22 octobre 2020.

Awa na Ekolo Amerika… Mokonzi oyo azali na ebonga Joe Biden na mbanda na ye mokonzi ya kala Donald Trump bazali kobeta ntangwa bango babale mpo ete bayindo bakoka kopona bango na maponami ma suka ya mobu moye.

Donald Trump alobaki na baponi ya New York ete bayi Amerika bakozwa bolamu soki aponami, ata langi ya loposo na bango ezali nini.

Na ngambo na ye, Joe Biden ayebisaki babundi ba makoki ma bomwana mboka na Michigan ete bayi Amerika banso balakisami bilongi na ndako ya mosala mwa ye.

Makambo Centre de recherche Pew ebimisi malakisi été mposa ya makasi ya bayi Amerika ezali bobongoli na ndenge ya malamu kelasi mpe boyikisi makasi ya nkita ya mboka.

Trump alaki kopesa biyano na yango. Biden alobi été Trump akangelaka bato nkanda mpe akonyokola bayi mohindo.

Forum

XS
SM
MD
LG