Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC na basambeli ba yango balaki kobanda kolandela Apple liboso lya bazuzi mpo makele ma T misato ya nzela ya mayuya


President Félix Tshisekedi (G2) na baike ba ya mbulmatari na ye, Paris, 30 05 2024. (Présidence RDC)
President Félix Tshisekedi (G2) na baike ba ya mbulmatari na ye, Paris, 30 05 2024. (Présidence RDC)

Mbulamatari ya Ekolo Congo Démocratique na basambeli ba yango balaki ete kobanda kolandela Apple liboso lya bazuzi mpo ezali kokoba kovanda kimya na bofundami bwa kolekisaka makele ma T misato ma mboka eye na nzela ya mayuya.

Ba avocats ba RDC basakoli ete bapesami ndingisa na likambo liye na bakonzi ba mboka na koleka na kofunda na ntina ya kosambiama kolanda mibeko mya Ekolo Amerika mpe ya France mpo ete Apple eleka liboso lya bazuzi. Baloki na liyebisi ete misala bazali kosala ezali mpo na kolakisa mokumba Apple ezali na yango liboso lya mibeko mpo na bikela bya yango.

Ezali mpe mpo na kopamela bolekisi makele ma T misato (Etain, Tantale mpe Tungstene) maye mazali kobima na nzela ya molili na nzela ya Rwanda kowuta na RDC.

Makele maye mazalaka na motuya mingi mpo ba Industrie ya electronic, ya bosali mituka, mpepo mpe lotiliki lobandelamaka.

Forum

XS
SM
MD
LG