Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato 740 minei bakufi kati na sanza zomi na mitano na bitumba ya mabele kati na ba Mbole na ba Lengola na Kisangani


Saoda ya garde républicaine (GSSP) azali kosala bokengi na gbagba ya Kisangani, Tsopo, 17 octobre 2004.
Saoda ya garde républicaine (GSSP) azali kosala bokengi na gbagba ya Kisangani, Tsopo, 17 octobre 2004.

Koleka bato nkama sambo na ntuku minei bakufi na Kisangani na etuka ya Tshopo kati na sanza zomi na mitano na bitumba bya boweleli mabele na Ekolo Congo Démocratique elobi Ocha, Misala mya ONU mikambaka lisungi. Na liyebisi OCHA ebimisi wuta New York awa na Ekolo Amerika, OCHA ebakisi, kolanda mabongisi mingi ma bopesi lisungi, ete koleka bato nkoto ntuku sambo na ndambo bakimi bisika bya bango bafandaka mpo bitumba bya boweleli mabele bibandaki wuta sanza ya mibale ya mobu 2023 kati ba Mbole na ba Lengola, book na kabila ya bisika eye. OCHA esakoli ete bato mingi bakufi na boweleli boye wuta suka ya sanza ya minei eleki. Bayi lisungi bazali kopesa lisali lya minganga nab aye bazoki mpe bakimi bisika bya bango mpe amilengeli kobanda kokabola ba hema, mayi ma komela mpe lisungi lya bopeto. OCHA emoni ete bosenga bwa bileyi, bisika ya kolala mpe lisalisi lya minganga bozali mpenza makasi.

Forum

XS
SM
MD
LG