Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ntoma Lucy Tamlyn akundoli na president Tshisekedi ete Etats-Unis ezali kosala makasi na diplomatie mpo na RDC


Ntoma ya ekolo Amerika Lucy Tamlyn (G) na Kinshasa na masolo na président ya RDC Félix Tshisekedi, Kinshasa, 15 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)
Ntoma ya ekolo Amerika Lucy Tamlyn (G) na Kinshasa na masolo na président ya RDC Félix Tshisekedi, Kinshasa, 15 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)

Ntoma ya Ekolo Amerika na Kinshasa, Lucy Tamlyn akutanaki na président Félix Tshisekedi na masolo o’mokolo mwa mosala misato, na Cité ya Union africaine, ntango bato bazali kosalaka milulu mya botelemeli bayi West na engumba mokonzi ya RDC mpe bisika bisusu mpe kopamela bango na bitumba ya mboka.

Ntoma ya Etats-Unis akundoli ete ekolo na ye ezali kosala mingi mpo na kimya na mboka eye, mingi na nzela ya diplomatie.

"Tosali mosala ya diplomatie ya likolo makasi. Nakanisi ete boyebi maye tosalaki. Moyangeli ya misala mya bokengi ya ekolo Amerika ayaki awa mpo na masolo matali mikano mya makasi mpo na kimya na est ya mboka," ekundoli Mme Tamlyn.

Milulu misalami mizali kosalama na Kinshasa mpe bisika bisusu na RDC mpe baye bazali kosala yango bazali kopamela bayi West kozala na boyokani na Rwanda, ekolo eye Kinshasa ezali kofunda kosunga batomboki ba M23 baye bazali kosala bitumba na monyele ya mboka.

Mme Tamlyn apesi longonya na mbulamatari ya RDC ndenge ebateli ba ambassades mpe bisika bisusu ya bikolo bya bapaya na RDC ntango ya milulu miye.

Forum

XS
SM
MD
LG