Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Donald Trump afundami kotiya bokengi ya Etats-Unis na likama mpe asengeli ayanola na mituna ya ba zuzi


FILES-US-POLITICS-JUSTICE-DOCUMENTS-TRUMP
FILES-US-POLITICS-JUSTICE-DOCUMENTS-TRUMP

Donald Trump atiyaki "sécurité nationale" ya Etats-Unis na likama na kobombaka malamu te sekele ya nucleaire ya Amerika nsima na bolongwi na ye na Maison Blanche, kolanda mokanda ya bofundami moye mosakolamaki mokolo mwa mitano moleki

M. Trump oyo azali koluka mandat ya mibale na 2024, azali na bifundeli 37 kati na yango "kokanga sango na ndenge ya mabe ya bokengi ya ekolo" mpe "kopekisa bosembo", esakoli mokanda mw abo fundami bwa ye.

Afundami mpe mpo na kopesa litatoli ya lokuta mpe mpo na koyokana na mosungi na ye moko na kombo ya Walt Nauta oyo afundami mpe lokola mpo na kobomba mikanda misengamaki na police fédérale, FBI.

Donald Trump asakolaki jeudi ete afundami na justice fédérale mpo na boyangeli na ye ya ba archives ya Maison Blanche, likambo liye lisalema naino te na président ya kala ya Etats Unis , mpe ete abengamaki na na kosamba tribunal na Miamio mokolo mwa mibale.

"Nazali innocent," elobaki ye lobi, mpo na komilakisa lokola victime ya complot ba opposants na ye ya ba démocrates.

Na ngambo na ye, Président démocrate Joe Biden, oyo asakoli mpe kowlela ebonga ya bokonzi na mobu 2024, asakoli ete azala na contact te na ministre ya Justice Merrick Garland na likambo liye ya bofundami bwa Trump.

"Nasololaki na ye ata moke te mpe nakoloba na ye te. Mpe nazali na commentaire moko te mpo na yango," ayanolaki na mopanzi sango moko.

Na Etats-Unis, mobeko moko mozali kotinda ba présidents batinda ba emails na bango nionso, mikanda mpe mikanda misusu ya mosala na ndako ya ba archives ya ekolo. Mosusu, na oyo etali espionnage, epekisi kobomba basekele ya l’Etat na bisika oyo epesami ndingisa te mpe oyo ezali na libateli te.

Nasanza yay ambo ya mobu 2021, ntango alongwaki na Maison Blanche mpo na kofanda na ndako na ye ya kitoko ya Mar-a-Lago na Floride, Donald Trump nzokande alongolaki ebele ya ba boîtes etondi na ba dossiers.

Mobu moko na nsima, nsima ya kosenga ye yango mbala mingi, andimaki kozongisa ba cartons 15 oyo ezalaki na mikanda pene na 200 oyo ezali ya sekele.

Kasi, bapolisi ya fédéral bakanisaki ete azongisaki biloko nyonso te mpe abombaki kaka mingi na club na ye na Palm Beach. Ba agents ya FBI basalaki bolukiluki ya kokamwa kuna le 8 août ya mobu moleki, mpe bakangaki pene na ba cartons mosusu ntuku misato, oyo ezalaki na mikanda 11.000.

Engebene na mokanda ya bofundami, mikanda ya kobombama mizwamaki "na salle de bal", kasi mpe "na salle de bain, na douche", to ata na "biro" to "chambre ya kolala".

Ba "kotisaki sango ya makoki ya bobateli ya Etats-Unis mpe ya bikolo ya bapaya", "maye matali ba programmes nucléaires ya Amerika" mpe "na ntina ya bozangi bokengi oyo ekoki kozala soki bobundisi Etats-Unis mpe ba alliés na yango".

"Bopanzani na yango elingaki kotia na likama bokengi ya ekolo ya Etats-Unis, boyokani na yango na molongo", ebakisi procureur spécial Jack Smith, oyo aponamaki na novembre moleki mpo na kotambwisa bolukiluki na lipanda.

Mpo na sik’oyo, ba républicains bazali kaka kokanga milɔngɔ nzinganzinga ya Donald Trump, kati na bango ba baye bazali kowelela na bango ebonga mpo na candidature présidentielle ya ba Republicains, lolenge basalaka na sanza ya avril, tango justice ya l’Etat ya New York mpe afundaki ye, mpo na kosangisa nzoto mpe kokangisa monoko na actrice ya ba films X mpo abomba lisolo liye.

Makambo matali bosembo na Donald Trump ekosuka mbala mosusu wana te. Procureur moko lisusu ya Géorgie asengeli kosakola kino sanza ya libwa mbano ya bolukiluki na ye ya basanza mingi mpo na pression oyo asalaki mpo na koluka kobongola mbano ya maponami ya mokonzi ya mboka ya 2020.

Mpe procureur Jack Smith, oyo afundaki ye mingimingi baye basalaki mbeba ya bitumba na Kosovo, azali naino kolukaluka mokumba ya Donald Trump na bopunzi ya Capitole le 6 janvier 2021.

Forum

XS
SM
MD
LG