Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba républicains babandi bolukiluki mpo na kokweyisa Joe Biden


Kevin McCarthy (G) mokambi ya ba républicains na Suku ya balakisi bilongi na président Joe Biden, na bureau Ovale, Maison Blanche, Washington D.C., 22 sanza ya mitano 2023.
Kevin McCarthy (G) mokambi ya ba républicains na Suku ya balakisi bilongi na président Joe Biden, na bureau Ovale, Maison Blanche, Washington D.C., 22 sanza ya mitano 2023.

Mokambi ya ba républicains na Suku ya balakisi bilongi na parlement ya ekolo Amerika, Kevin McCarthy asakoli ete babandi bolukiluki na ntina ya kokeyisa mokonzi ya mboka Joe Biden mpo na likambo lya mbilingambilinga litali mwana wa ye na bikolo misusu.

"Nasengi na misala moko ya Suku eye kofongola bolukiluki makomema na bokweyisami na ye," elobi mokambi M. McCarthy na kobakisa ete ba démocrates, lingomba lya Joe Biden, "bakosaki bana mboka".

Maison Blanche, ndako ya mosala ya M. Biden epameli bolukiluki boye bobandisami ntango etikali basanza yambo na maponami ma mobu mokoya, 2024, mpe epameli ba républicains kosalela bikela bya made makasi bya politiki.

Ba républicains baleki sika na motango mingi na Suku ya balakisi bilongi wuta sanza yayambo.

Bazali kopamela M. Beidn maloba maye makoki komema na bizaleli bya kaniaka.

Na ngambo esusu, mokonzi ya kala Donald Trump oyo azali républicain mpe amitiaki na molongo mpo na kowelela maponami na 2024 azali kosamba na bisika mingi mpo eyoma balandi b aye basalaki na sanza ya yambo ya 2021 mpo na koluka kobongola elonga ya maponami ma Biden.

Ba républicains mpe bazali koloba ete bosambisami ezali mambi ma politiki mpo na kopekisa ye kozala na maponami mpe kopekisa ye kobeta ntangwa yambo na maponami.

Forum

XS
SM
MD
LG