Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Walid Regragui apekisami kokamba Maroc matches mibale nsima na bitumba na Chancel Mbemba


Coach Walid Regragui ya ba Lions ya Atlas ya Maroc azali koyanola na bapanzi nsango na stae Laurent-Pokou, na San-Petro, 20 sanza ya yambo 2024.
Coach Walid Regragui ya ba Lions ya Atlas ya Maroc azali koyanola na bapanzi nsango na stae Laurent-Pokou, na San-Petro, 20 sanza ya yambo 2024.

Mokambi to coach ya ba Lions ya Atlas ya Maroc Walid Regragui atelemisa matches mibale na bokambi ekipi ya ekolo Maroc, na mokano mwa CAF (Confédération ya Afrika ya lisano lya ndembo) nsima na koswana mpe bitumba bingalaki na suka ya bondongwani na ba Léopards ya RDC mokolo mwa eyenga moleki.

Etumbu yango epesami na CAF.

Nzonkande Fédératioin ya Maroc ya lisano lya ndembo elobi ezali kosenga na CAF kolongola etumbu eye.

"Coach Regrwagui atamboli soki moke te likolo lya molimo ya fair-play," ekomi FRMF.

RDC na Maroc bakabolaki mongete moko ngambo inso.

Maroc na RDC nanu baleki te, esengeli bazela suka ya match ya mokolo ya mosala misato.

Forum

XS
SM
MD
LG