Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balandi ba Mukungubila na ya Bundu dia Mayala babimisami na boloko


Ministre ya Makoki ma bomoto, Fabrice Puela azali kobesa mokanda mwa bosikolami na balandi ya Mukungubila na ya Bundu dia Mayala baye batikami na boloko bwa N'Dolo, Kinshasa, 31 sanza ya zomi 2023. (ACP)
Ministre ya Makoki ma bomoto, Fabrice Puela azali kobesa mokanda mwa bosikolami na balandi ya Mukungubila na ya Bundu dia Mayala baye batikami na boloko bwa N'Dolo, Kinshasa, 31 sanza ya zomi 2023. (ACP)

Balandi ba masanga ma losambo mpe politiki ya Mukungubila na ya Bundu dia Mayala babisami boloko o'mokolo mwa 31 ya sanza ya zomi ya 2023, nsima na baike kolekisa pene na mibu zomi to mitanu na bokangami.

Babimisami na bokangami na milulu misalamaki na boloko bwa N'Dolo, na Kinshasa, na bokambami bwa ministre ya Makoki ma bomoto ya RDC, Fabrice Puela.

" Makangamaki mpo na milulu tosalaki mpo na koboya boyokani mbulamatari esalaki na batomboki ba M23," etaloki moko na bango.

Bato bango babimisami na mokano mwa ngolo ya mokonzi ya RDC, elobi ministre Fabrice Puela.

Ne Muanda Nsemi mokambi ya lingomba lya bokoko-losambo-mpe politiki Bundu dia Mayala, oyo nkombo na ye ya solo ezalaki Zacharie Badiengila, akufaki mokolo mwa 18 ya sanza ya zomi 2023 na mibu 77.

Na Muanda azalaka kala mokeli mibeko mwa ekolo moponami ya Kongo central.

Akimaka boloko CPRK / Makala, abundisa bakonzi mingi ya RDC.

Balandi ba ye baike bakangamaki nsima na eyoma ya kobimisa ye na boloko, basusu bakangamaka na milulu misalaka kala, yambo na ntango Ne Muanda Nsemi ye moko akangamaki nsima na kokebisa kokweyisa bokonzi ya Felix Tshisekedi.

Forum

XS
SM
MD
LG