Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Brazzaville elaki kokende mosika na bazuzi nsima na boteki bwa mpepo ya Sassou na Paris


Président ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N'Guesso ayambani na mokokani wa ye ya France France Emmanuel na Palais ya Elysée na Paris, 3 septembre 2019.
Président ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N'Guesso ayambani na mokokani wa ye ya France France Emmanuel na Palais ya Elysée na Paris, 3 septembre 2019.

Mbulamatari ya ekolo Congo-Brazzaville elaki komema bosimbami mpe botekami bwa mpepo ya président Denis Sassou N'Guesso na Paris mosika mpo ete bazuzi basalami misala mya sembo mya solo.

"Ekolo Congo-Brazzaville ekoselala makoki manso ma sembo mpo makambo masili nanu te, mpo ete bazuzi bakoka kosala sembo. Tozali kolikya ete tokolonga bisika binso epayi likambo liye likomema," elimboli molobeli ya mbulamatari Thierry Moungalla.

Brazzaville epameli bongo Paris mpo eteki na ba encheres to na boteki zeke mpepo ya president Denis Sassou N’Guesso eye ekolo esomba mpo na mibembo mya mokonzi ya mboka.

Ministre ya Mambi ma Bapaya Jean-Claude Gakosso ayambaki mpo na yango ntoma ya ekolo France na Brazzaville Claire Bodony mpe ayebisi ye nkanda ya ekolo mpo na yango.

Mbulamatari ya Congo-Brazzaville ekundoli na bakonzi ba ekolo France ete mibeko mya molongo mipekisi ete mambi ma bonsomi ma ekolo songolo lokola misolo mya compte ya banque ya ambassade ya ekolo songolo, to na bolayi, mpepo ya mokonzi ya mboka ekoki te kosimba na misala mya sembo na ekolo songolo.

M. Moungalla akundoli mpe makambo masusu ma motindo ya lolenge lona Paris esalaka mpo na Brazzaville.

Mpepo yango, Falcon 7X ya marque Dassault, etakamaki o;mokolo mwa mibale mwa mposo moye na 7,1 millions ya ba euros nzokande motuya na yango ya solo mozali 25 millions ya ba euros.

Bakonzi ba sembo bakangaki yango na libanda lya mpepo ya Mérignac wuta sanza ya motoba ya 2020 mpo na nyongo ya compagnie BTP Commisimex eye esengaka na Congo-Brazzaville lifuta mpo na misala mya botongi na mboka esala wuta 1980.

Forum

XS
SM
MD
LG