Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Boxe/Bibotu: Bakole abeti Yoka na Paris


Moyi RDC Martin Bakole azali kosepela nsima na kosakolama molongi na bitumba ya ba Poids lourds ya WBC na moyi France awuta na Congo, Tony Yoka, na AccordHotels Arena, na Paris, 14 mai 2022.
Moyi RDC Martin Bakole azali kosepela nsima na kosakolama molongi na bitumba ya ba Poids lourds ya WBC na moyi France awuta na Congo, Tony Yoka, na AccordHotels Arena, na Paris, 14 mai 2022.

Moyi Ekolo Congo démocratique Martin Bakole abeti na bilembo Tony Yoka, moyi France oyo awuta na Congo-Brazzaville mpe RDC, na bitumba ya molongo ya bibotu to boxe ya ba poids lourds ya WBC samedi na mpokwa na AccordHotels Arena na Paris.

M. Yoka, na mibu 30, alongami mbala ya yambo wuta abanda mosala ya boxe professionnelle, na elonga zomi na sambo mpe bolongami moko (na M. Bakole).

M. Bakole, na mibu 29, oyo abotoli kiti ya elonga ntango nyonso na N. Yoka asi apola mbala kasi alonga mbala misusu etikala na K.O.

Elonga yango esakolami bo’ na bazuzi baye bandimi ete M. Bakole oyo azali elombe ya WBC.

M. Bakole ayaki na bitumba na kanza mpo wuto round ya liboso akweyisaki M. Yoka kasi atelemaki. Ekomi elonga na ye ya mbala 17 kasi apola mbala moko.

M. Bakole azali leki ya elombo ya molongo na WBC Junior Makabu ya RDC.

XS
SM
MD
LG