Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Netanyahu bayokani mpo RDC etinda ambassade na yango na Jérusalem mpe Israël na Kinshasa


President Félix Tshisekedi na masolo na Ministre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu ntango ya Likita linenen lya ONU, na New York, Etats-Unis, 22 sanza ya libwa 2023. (Twitter/Présidemce RDC)
President Félix Tshisekedi na masolo na Ministre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu ntango ya Likita linenen lya ONU, na New York, Etats-Unis, 22 sanza ya libwa 2023. (Twitter/Présidemce RDC)

Ekolo Congo démocratique ekotinda ambassade na yango na Jérusalem mpe Israël ekofungola ambassade na yango na Kinshasa, kolanda masolo président Félix Tshisekedi ya RDC na Ministre wa Yambo ya Israël Benjamin Netanyahu bazalaki na yango na New York, na bokutani bwa pembeni ya Likita linene lya ONU lya mbala 78.

M. Tshisekedi na M. Netenyahu basolalaki mpo na bokolisi bondeko kati na bikolo mibale.

"Towuti kozala na masolo kitoko na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi. Toyokani ete Israël ekofungola ambassade na yango na Kinshasa, mpe RDC ekolongola ambassade ba yango na Tel Aviv mpo na kotia yango na Jérusalem," esakoli M. Netanyahu na kolobaka ete ezali "nsango ya malamu mpenza eye elakisi bolingi ngambo inso ya kotombola boyokani bwa bikolo mibale".

"Masolo mango mazalaki mpo na bolamu bwa boyokani bwa biso. Mpe botiami ya boyokani boye bokotia mokoloto likolo lya bopusani pene pene ya bikolo mibale, botieyi misolo na bokeli miala, botongi biloko, bokengi mpe bokengi bwa makambo ma internet (cybersécurité)," ebakisi M. Tshisekedi na ngambo na ye.

Forum

XS
SM
MD
LG