Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Wuta New York: Tshisekedi asakoli ete akozala na maponami mpo bokonzi ya mbala ya mibale


Félix Tshisekedi, mkonzi ya ekolo Cogno démocraique na Harare, Zimbabwe, 4 sanza ya libwa 2023.
Félix Tshisekedi, mkonzi ya ekolo Cogno démocraique na Harare, Zimbabwe, 4 sanza ya libwa 2023.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique, Félix Tshisekedi asakolaki, o’mokolo mwa mibale 19 ya sanza ya libwa 2023 na New York, ete akozala na maponami ma mokonzi ya mboka makosalama na sanza ya zomi na mibale. mwa 2023

Ayanolaki na mituna ma bapanzi nsango na limpati akabolaki na bango na New York epayi asengli kozwa maloba o’mokolo mwa misato na Likita linene lya ONU.

“Namoni te ntembe na basungi babiso lokola bato basusu bazali kokanisa. Bikolo lokola Etats-Unis France na misusu bazali nde kolendisa misala mya bolengeli maponami," alobaki M. Tshisekedi.

Etats-Unis, France, Union européenne bazali kosenga ete maponami masalama na ntango mpe maala ma bato banso.

Bayi opposition bazali kobamela Misala mya maponami, CENI ya RDC, kosala makambo mpo na bango bazala te.

M. Tshisekedi ayanoli ete alongaki maponami malekaki na 2018 kasi ayibaki te lokola bato basusu baloba.

"Na bokeseni na maye bayike bayebaki kokanisa to koloba, boyokani botikala kosalama te kati na molongi ya mapponami mango oyo azali liboso na bino na oyo azalaki yambo na esika. Nalingi na loba, boyokani mpo na mayuya. Elembo na lingi na lakisa, mpo nga na lingaka koloba na libilembo, ezali bato babale baye bazali nanu na bomoi kino sika M. Raymond Tshibanda na oyo azalaki mokambi ya ndako ya mosala ya oyo nakitanaki na ye, Me Mwilanya Néhémie," elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC alobi abetaki sete yambo na masolo na bango ete akoki te kozala Ministre wa Yambo ya moto PPRD, lingomba lya Joseph Kabila mokonzi ya kala, etiaki mpo na kowelela maponami ma 2018, kasi ayebisaki bango ete azalaki na bilembo biye bilakisaki ete alongaki mpe bandimaki yambo. Kasi masolo ma bango mazalaki mpo na makambo masusu.

Mpo etali bokangami ya mopanzi nsango Stanis Bujakera na moyi politiki Salomon Idi Kalonda ya lingomba lya moyi opposition Moïse Katumbi, M. Tshisekedi alobi atosaka bokabwani ya bokonzi mpo likambo na bango ezali sika na maboko ma bazuzi.

Mokonzi ya Ekolo Congo democratique alobelaki mpe bokengi na monyele ya mboka mpe apameli Rwanda koluka kozwa etuka mobimba ya kati ya Afrika.

Alobi ete RDC ekomi sika na makoki ma kozongisa matumoli manso ma bitumba ma Rwanda.

Mpo na ye, masolo makoki kozala te na batomboki ba M23 baye bazali kobomaka bato. Esengeli bayanola mpo na yango, elobi M. Tshisekedi.

Forum

XS
SM
MD
LG