Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alobi mampinga ma Angola makozwa esika ya maye ma EAC mpe M23 ekotika mandoki


Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Suisse Alain Berset (D) bazali kotambola na tapis rouge na libanda lya Palais de la nation, Kinshasa, 13 sanza ya minei 2023. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Suisse Alain Berset (D) bazali kotambola na tapis rouge na libanda lya Palais de la nation, Kinshasa, 13 sanza ya minei 2023. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi alobi ete mampinga ma Angola makozwa esika ya maye ma EAC (Likita lya bikolo bya Afrika ya Est) mikolo mikoya mpe batomboki ba M23 bakotindama na Maniema.

Alobi yango na bapanzi nsango elongo na mokonzi ya Suisse Alain Berset ayambaki lelo na Kinshasa.

Félix Tshisekedi asakoli ete bayi M23 bakosangisama yambo, mpo na mwantango, na Kitshanga, na Nord-Kivu, na base moko ya Monusco, misala mya ONU na RDC.

Asololi likambo lyango na mokonzi ya ekolo Suisse, Alain Berset, ayambi lelo na Palais de la Nation na Kinshasa.

Esika ba M23 bakosangisama, ezali mpe libanda lya mpepo mpo esengeli batoloma mandoki mpe bomemama na Kindu, na etuka ya Maniema, epayi bakotiama, ebakisi Félix Tshisekedi.

Kuna nde bayi M23 bakolengelama na ntina ya kokotisama na misala mya DDR communautaire to misala mya bokitisi mandoki, bobimisami na mangomba ma basimba manduki mpe kozongisama na misala mya masanga mya ba civili, elimboli mokonzi ya Ekolo Congo démocratique.

Félix Tshisekedi abakisi lisusu ete masolo makosalama te kati na mbulamatari ma ye na batomboki ba M23. Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique alobi ete mboka na ye esi ezwii mayele na makambo manso masalamaka kala na masolo maye mamemaki batomboki mpe basimba manduki kokota na mampinga mpe kobibisa yango na lolenge mazali sika.

Na ngambo na ye, Alain Berset, mokonzi ya Suisse alaki kolobela bato banso baye bazwi mpasi na bitumba na monyele ya RDC na Conseil ya sécurité ya ONU ntango mboka na ye ekokamba yango na sanza ya mitano ekoya.

Mokonzi ya Suisse akokende na monyele ya RDC lobi mpo na kokutana na bato bazwa mpasi na bitumba mpe matata. Akozala na Goma, na Nord-Kivu mpe na Bukavu, na Sud-Kivu.

Nzokande, Félix Tshisekedi akendaki lobi na Luanda, epayi asolalki na mokokani wa ye mokonzi ya Angola, Joao Lourenço mpo na kotala soki misala mya kimya mikomi wapi kolanda malako bakonzi ba bikolo bya bitima minene mpe ba Afrika ya Est bayokanaki mikolo mileki.

Bakonzi babale babetaki mpe sete na bosangisami bwa ba M23, kolanda nsango epesami na ndako ya mosala ya Joao Lourenço. Mobembo ya Tshisekedi na Luanda mozalaki kaka ya ba ngongo ya kotanga.

XS
SM
MD
LG