Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

UA: Bakambi ba EAC mpe ya Gds lacs bapesi batomboki kino le 30 mars mpo na kolongwa na est ya RDC


Président Félix Tshisekedi (G2) ya RDC na ministre wa ye ya Mambi ya Bapaya, Christophe Lutundula (G1) na likita lya Conseil ya kimya mpe bokengi ya Union africaine, Addis Abeba, Ethiopie, 17 sanza ya mibale 2023.
Président Félix Tshisekedi (G2) ya RDC na ministre wa ye ya Mambi ya Bapaya, Christophe Lutundula (G1) na likita lya Conseil ya kimya mpe bokengi ya Union africaine, Addis Abeba, Ethiopie, 17 sanza ya mibale 2023.

Bakonzi babikolo bya EAC, Lisanga lya bikolo bya Afrika ya est mpe ya Grands lacs baye basanganaki na bokutani ya pembeni ya Likita linene lya Union africaine na Addis Abeba, na Ethiopie, basengi na mangomba manso ma basimba minduki kolongwa kino to tokoma mokolo mwa 30 ya sanza ya misato ya 2023 na bisika bazwa.

Kaka na Adisa Abeba, o'mokolo mwa mitano, likita lisusu lisalamaki mpo na RDC, na Conseil ya kimya mpe bokengi ya Union africaine mpe bitumba bizali kongala na ekolo eye mpe litlamaki. RDC esengi bolongwi ya M23 mpe Rwanda na lombango.

" Bakonzi ba bikolo basengi bolongwi bwa mangomba manso ma basimba minduki kino mokolo o’mwa 30 ya sanza ya misato ya 2023, botelemisami ya bitumba na kozela te ia mangomba manso ma basimba minduki, bozongisami ya bato bakima bitumba kati na mboka," elobi liyebisi lya EAC na Twitter.

Kolanda molobeli ya président Tshisekedi, RDC asengaki na Conseil ya kimya mpe bokengi ya UA, bondimami ya bitumbu lisanga lya Rwanda na M23 lizali kosala mpe bokitisami bwa yango na likambo mpo na mbeba ezali kosala.

Tina Salama, molobeli ya président Tshisekedi abakisi mpe na Twitter ete RDC esengi mpe M23 endimama bo’ lingomba lya badongolomeso, mpe etumbu epesama na Rwanda mpe Kigali esengama kotika lisungi linso na M23.

RDC esengi mpe lisusu botiami na mosala ya boyokani bwa Luanda boye bobimisaki na sanza ya yambo linaka ya bolongwi ya M23 mpe esengaki Rwanda kotika kopesa maboko na M23 mpe na RDC kotika kosangana na FDLR, batomboki bakima Rwanda nsima na bobomi bafundama kosala kuna na 1994, mpe kotika koyina mpe konyokola baye balobaka kinyarwanda na RDC.

Bokutani bwango bosangisaki bakonzi ba bikolo lokola Paul Kagame ya Rwanda, Félix Tshisekedi ya RDC, Samia Suluhu ya Tanzanie mpe William Ruto ya Kenya, Joao Lourenço ya Angola na Evariste Ndayishimiye ya Burundi.

Likita lya Conseil ya kimya mpe bokengi lisangaba bakonzi mingi bakisa baye bazalaki na likita lya EAC, kati na bango Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville, Cyrile Ramophosa ya Afrika ya Ngele na kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres mpe basusu.

Nzonkande M23, lingomba lya batomboki baye RDC efundaka kopesama lisungi na Rwanda, baye bazali kosala sika bitumba makasi na FARDC (Mampinga ma RDC) na Masisi mpe Rutshuru, na Nord-Kivu, babandaki kolongwa na bisika babatola nsima na kopesa ndelo le 15 janvier, kasi bazali kokoba kozwa bisika misusu.

Mangomba masusu ma batomboki mpe basimba manduki mpe bazali kobunda bisika misusu lokola batomboki ba ba ADF baye bawuta na Uganda baye bazali na Beni mpe basimba minduki lokola ba Codeco, Zaïre mpe misusu na Ituri.

XS
SM
MD
LG