Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Congo-Brazzaville: Mbulamatari ewangani nsango ya "Coup d'état"


Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville na bokutani na président Russie Vladimir Poutine (amonani te na photo) na Kremlin, Moscou, Russie. 23 mai 2019.
Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville na bokutani na président Russie Vladimir Poutine (amonani te na photo) na Kremlin, Moscou, Russie. 23 mai 2019.

Mbulamatari ya Congo-Brazzaville ewangani nsango ya bokweyisami ya bokonzi eye ezali kotambola na ba reseaux sociaux.

"Nsango mingi ya lokuta ezali kolobe ete makambo ya makasi mazali koleka na Brazzaville. Mbulmatari ewangani nsango eye ya lokuta (fake news). Tozali kokitisa bato banso motema mpo kimya ezali na mboka mpe tosengi bana mboka kokoba kosala misala mya bango bo’ momesano," ekomi na compte X na ye mpe ya mbulamatari, molebeli ya mbulamatri Thierry Lezin Moungala.

Nsango yango epesami ntango mokonzi ya ekolo Denis Sassou N'Guesso azali na mobembo na New York, na ekolo Amaerika, mpo na kozwa esika na Likita linene lya ONU lya mbala 78 epayi akozwa maloba.

Denis Sassou N’Guesso akomi na reaseau social X ete ekozala mpo na ye libaku lya kokolisa boyokani na bikolo bisusu mpe kotombola bokutani mpo na bitando misato ya nzamba minene ya ba tropiques liye lisengeli kosalama na Brazzaville na sanza ya zomi ekoya.

Forum

XS
SM
MD
LG