Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alobi na bazuzi ete ayebi likambo te

This artist sketch depicts former President Donald Trump, right, conferring with defense lawyer Todd Blanche, center, during his court appearance in Washington, Aug. 3, 2023. Special Prosecutor Jack Smith is at left. (Dana Verkouteren via AP)

Donald Trump, mokonzi ya kala ya ekolo Amerika alobaki mokolo mwa minei (3 sanza ya mwambe 2023) liboso lya bazuzi ya tribunal awa na Washington DC ete ayebi likambo te na bofundami bwa ye na koluka kobongola bilembo ya maponami ma 2020 nsima na eyoma balandi ba ye basalaki o’mokolo mwa motoba ya sanza ya yambo ya 2021.

Donald Trump afundami mpe kopekisa bolukiluki mpe kosangana na basusu mpo na kopekisa boluki.

Ezali mbala ya misato Donald Trump azali kosamba na ba tribunaux misato ekeseni. Yambo na koya lobi koyanola na bazuzi na Washington DC, Donald Trump alobaki ete bofundami bozali lokola misala ya ba Nazi ya Allemagne ya kala to ya Union sovietique ya kala.

Atiolaki kutu na koloba esengeli na ye bofundami mosusu mpo alonga maponmi ma mokonzi makoya maye amitie na molongo ya ba republicains mpo na kowelela na 2024. Donal Trump akonzonga lisusu libosa lya zuzi ya Wahisnton DC o’mokolo mwa ntuku mibale na mwambe ya sanza eye ya mwambe.

Forum

XS
SM
MD
LG