Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Donald Trump abongoli foto na ye ya bokangami bo’ foto ya campagne


Bosangisami ya ba foto bomonisi Donald Trump, mokonzi ya kala ya Etats-Unis, na bato basusu 18 baundami koluka kobongola bilembo bya maponami ma 2020 bozwami na boloko bokolo ya Altanta, na Goergie, 24 sanza ya mwambe 2023.
Bosangisami ya ba foto bomonisi Donald Trump, mokonzi ya kala ya Etats-Unis, na bato basusu 18 baundami koluka kobongola bilembo bya maponami ma 2020 bozwami na boloko bokolo ya Altanta, na Goergie, 24 sanza ya mwambe 2023.

Mokonzi ya kala ya Etats-Unis Dondal Trump akangamaki foto na boloko bwa comté ya Atlanta na bofundami bwa ye na kololuka kobongola bilembo bya maponami ma 2020 apolaki na Georgie mpe na ba états mingi misusu.

Nsima na koleka na bokolo yango o'mokolo mwa mitano (o’mokolo mwa ntuku mibale na minei ya 2023), abebisaki ntango te kasi abongola na lombango foto yango mpo na bolamu bwa ye.

Abimisaki yango ye moko na X, plateforme eye ezalaki Twittter.

Ezali mbala ya liboso Donald Trump atia lisusu biloko na media social eye wuta epekisamaki nsima na eyoma ya balandi ba ye na Capitol, parlement ya Etats-Unis, o’mokolo mwa motoba ya sanza ya yambo ya 2021.

Donald Trump oyo azali kowela lisusu maponami na 2024, akendaki komitika ye moko mpo na mwa ntango na bokolo bwa ya cometé ya Fulton.

Balandi ba ye bazalaki libanda lya boloko boye mpo na kolakisa bolingo bwa bango.

Bayi ngambo ya Donald Trump balobi akobongolo yango foto ya campagne mpo na kokongola misolo na ntango ya maponami ma 2024.

Trump andimaki kofuta lomande ya dollars nkoto nkama mibale mpe malako maye mapekisi ye kokanela baye bakatola to bato basusu zomi na mwambe baye baundami elongo na ye.

Ezali bofundami ya minei ya lolenge loye likolo lya Trump.

Forum

XS
SM
MD
LG