Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bazuzi balobi mosungi ya Chérubin Okende oyo akendaki na ye na Cour constitutionnelle asimbami


Mokeli mibeko Chérubin Okende, ministre ya kala ya Transport ya RDC, 2023
Mokeli mibeko Chérubin Okende, ministre ya kala ya Transport ya RDC, 2023

Procureur général ya Cour cassation, Firmin Mvonde alobi ete mosungi ya Chérubin Okende oyo ekendaki kozwa mpe kotika mikanda mpo na mokeli mibeko Chérubin Okende, molobeli ya lingomba lya politiki ya Moïse Katumbi, Ensemble pour la république, asimbami na misala mya bokengi mpo na liwa na bobomami ya moyi politiki oyo.

Procureur général ya Cour cassation nde apesami nzela koloba na bokutani Conseil supérieur ya magistrature esalaki mokolo mwa minei na mpokwa liboso lya bapanzi nsango nsima na Chérubin Okende kokutama akufa na ntongo kati na motuka wa ye mpe nzoto na ye ebetama masasi mingi na motuka mwa ye na nzela ya Poids Lourds, pene na SEP Congo, na Kinshasa.

Chéubin Okende azalaki komonana te wuta mokolo mwa misato nsima na nzanga nsima na ye kokoma na Cour constitutionnelle.

Mpo na zuzi Firmin Mvonde makambo mingi makanisi ete mosungi ya Chérubin Okende oyo akangami azali na bilembo mingi bizali likolo na ye.

"Moto oyo asimbami ayaki yambo na 11:00 mo na kosenga mokanda na Cour constitutionnelle. Moto yango azangaki kotika mokanda mwango na 16:00 mpe mokomisamaki na 16:02. Kasi moto yango azongaki lisusu na 20:00 mpo na kotuna soki Chérubin Okende azalaki na kaka na Cour constitutionnelle," elobi Firmin

Procureur general na Cour ya cassation andimi été molobeli ya lingomba lya Moise Katumbi abomami nde kobomama.

Alobi ete monduki ya bobomi bozali kolukama kasi matatoli maye mazwami kino sika mapesi nzela nanu te ya koyeba nani abomi mpe nani atindaki ye.

Mpo na ye, babomi bazali nanu kolukama.

Maloba maye masakolamaki ya Bureau Conseil supérieur ya magristrat ba bapanzi nsango na Kinshasa.

Forum

XS
SM
MD
LG