Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bobomi bwa Chérubin Okende: Washington esengi bolukiluki na lombango


Chérubin Okende, molobeli ya Ensemble pour la république, azali kopesa limemya na lilita lya noomobo mama ya ya Moïse katumbi mokambi ya lingomba na ye, na Haut-Katanga, 14 sanza ya yambo 2023. (Twitter/Chérubin Okende)
Chérubin Okende, molobeli ya Ensemble pour la république, azali kopesa limemya na lilita lya noomobo mama ya ya Moïse katumbi mokambi ya lingomba na ye, na Haut-Katanga, 14 sanza ya yambo 2023. (Twitter/Chérubin Okende)

Nsango ya liwa to ya bobomi bwa Chérubin Okende, molobeli ya lingomba lya Ensemble pour la république ya Moïse Katumbi, ya opposition, mpe ministre ya kala ya Transport mpe Voies ya Communication, ememi nkanda mpe maloba ma ndenge na ndenge na bayi politiki ya Ekolo Congo démocratique mpe bayi bikolo bya bapaya.

Chérubin Okende akutamaki abomama na masasi mingi kati na motuka mwa ye na nzela ya Poids lours, pene na CEP Congo na Kinshasa.

Ekolo Amerika epameli bobomi boye bwa nsomo ya ministre ya kala ya Transport ya Ekolo Congo démocratique mpe elendisi bakonzi ba ekolo eye komema na lombango bolukiluki boye bolakami, elobi ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi alaki, kolandi liyebisi molobeli wa ye abisi na Twitter, ete makoki manso makotiama na mosala mpo été ekala ya bato ba yawuli epesama etumbu ya makasi mpenza.

Bayi opposition, lokola Moise Katumbi, Matata Ponyo mpe Martin Fayulu bapameli bobomi boye bokoki kozala ya ntina ya politiki.

Basusu lokola Andre Claudel Luboya na ntoma ya Union européenne na RDC, Jean-Marc Chataigner, lokola mpe Christophe Mboso Kodia Mpuanga, mokambi ya Assemblée nationale, mangomba ma makoki ma bomoto na basusu basengi été bolukiluki ya malonga bosalama.

Na mibu ntuku motoba na moko, Cherubin Okende azalaki mokeli mibeko mpe avocat to mosambeli. Ba episkopo katoliko na Likita lya bango CENCO bakundoli été bobomi bosalami ntango baike ba lingomba lya Moise Katumbi lokola Cherubin Okende, bakangami.

Ba episkopo ba katoliko bakebisi mpo na mobulu mpe maloba ma bobangisi ma baye bazali na bokoknzi. Basengi bokengi bozongisama na mboka Baleki nzela nde bakutaki nzoto na ye ntongo ya lelo ebetama masasi mingi kati na motuka wa ye.

Lobi na mpokwa lingomba lya ye Ensemble pour la répulique libetaki mbela na ba réseaux été azalaki komotata te nsima na kozala na Cour constitutionnelle. Baike balobi été amemamaki na bato bayebani kino sika.

Moise Katumbi alobi wuta Abidjan na Côte d’ivoire été akati mobembo mwa ye mpe azaongi mboka mpo na bolukiluki ya bonsomi mpo ye na lingomba lya ye bazali lisusu kotiela motema te na misala mya sembo ma ekolo, mpo mpo na ye, Cherubin Okende alimisamaki na Cour constitutionnelle yambo akutama akufa.

Bato baike balakisaki nkanda na bango na bala na Kinshasa mpe batumbaki biloko na nzela.

Forum

XS
SM
MD
LG