Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katebe Katoto akebisi komema na bazuzi bato bazali kokosa ete leki na ye Moïse Katumbi abotama na mama ya Zambie


Yaya ya Moïse Katumbi, moyi mombongo Katebe Katoto na likita lya opposition na Genval, pene na Bruxelles, 8 sanza ya motba 2016.
Yaya ya Moïse Katumbi, moyi mombongo Katebe Katoto na likita lya opposition na Genval, pene na Bruxelles, 8 sanza ya motba 2016.

Katebe Katoto, moyi misala mya mombongo mpe mya politiki ya etuka ya Haut-Katanga, akebisi komema na bazuzi bato banso bazali koloba na lokuta ete leki na ye Moïse Katumbi abotama na mama ya ekolo Zambie.

Abimisi bililingi (video) biye bitiami na ba réseaux sociaux.

"Sika na lokuta nyonso oyo, nalingi naselela makoki ma ngai ya komema na bazuzi bato banso balobaka lokuta wuta ntango molayi. Elekisi mingi," elobi Katebe Katoto.

Akebisi mingi nde moyi politiki Noël Tshiani oyo alobaka ete mama Moïse Katumbi azalaka moyi ekolo Zambie.

Katebe Katoto alobi amitiya pembeni na misala mya politiki, asengi Noël Tshiani kobimisa ba photos alobaka bakangaka elongo na bokutani bopesaki nzela ete alobela ete mama na Moïse Katumbi azalaki moyi ekolo Zambie mpe ayaki na ndako ya tata na ye bo' mwana mosala.

"Mama na ye, mama Virginie, abotama mwana ya RD Congo kasi ya Zambie te. Azali mwana ya RD Congo, baboti baye bazalaki bayi mboka Bunkeya mpe akola na Kashobwe. Mama na ngai nde awuta na Kashobwe. Mama Virginie azalaka mwana ya mosala te lokola kasi azalaki mwasi ya tata wa ngai. Nsima na mama na ngai, tata na ngai abalaki mama Virginie. Bato batika koloba bilobela," ebeti sete Katebe Katoto.

Katebe Katoto alobi azwaka Moïse Katumbi lokola mwana na ye mpo abokolaki ye.

Asengi bana mboka koboya kolanda mangungu ma bato.

XS
SM
MD
LG