Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato baike batelemeli mobembo ya Macron na Kinshasa


Bato baike bazali kosala milulu mya koboya mobembo ya Emmanuel Macron mokonzi ya France na RDC liboso lya ambassade ya France na Kinshasa, 01 sanza ya misato 2023. (Photo by Arsene Mpiana / AFP)
Bato baike bazali kosala milulu mya koboya mobembo ya Emmanuel Macron mokonzi ya France na RDC liboso lya ambassade ya France na Kinshasa, 01 sanza ya misato 2023. (Photo by Arsene Mpiana / AFP)

Bituluku bya bato, mingi mingi bilenge, bakitaki lelo na ba balabala na Kinshasa mpo na kotelemela mobembo Emmanuel Macron, mokonzi ya France, akosala na engumba mokonzi ya Ekolo Congo démocratique na suka ya mposo.

Batamboli bazalaki kopamela mokonzi ya France kopesa maboko na Rwanda ekolo eye efundami kosunga M23 mpe kosala bitumba na RDC nsima na batomboki baye. Batamboli bazalaki konganga été Emmanuel Macron azali mobomi mpe balakisi bilamba na makomi malobi se makambo ma lolenge loko lona.

Batamboli bakendaki mpe liboso lya ambassade ya France epayi bakomaki na efelo makambo bazali kosenga. Milulu miye misalami ntango Emmanuel Macron akomi na Liberville, na Gabon, na bobandi mobembo azali kosala na bikolo binei bya Afrika.

Mokolo mwa yambo ya mposo, mokonzi ya France asakolaki nzela ya sika ekolo na ye elingi kosala politiki na Afrika. Alobaki été bitumba na monyele ya Ekolo Congo démocratique bisengeli kozala bitumba bibosanama te.

Emmanuel Macron asengeki été masolo masalama na kati na Paul Kagama mokonzi ya Rwanda na Félix Tshisekedi mpo na kosilisa bitumba na lombango.

Asengengaki na M23 kotika bitumba. Mokonzi ya France azali mpe kobeta sete na bobatelami ya nzamba enene na Afrika. Yango azali sika na Libreville mpo na likita lya likambo liye.

Emmanuel Macron akokende mpe na Angola, na Congo-Brazzaville yambo na kokita na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG