Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kinshasa esengi ONU botosami ya malako ma Luanda mpe Nairobi mpe etumbu na Rwanda


Christophe Lutundula Apala, ministre ya mambi ya Bapaya ya Ekolo Congo décmorartique (RDC) na Paris, France, 12 nvembre 2021.
Christophe Lutundula Apala, ministre ya mambi ya Bapaya ya Ekolo Congo décmorartique (RDC) na Paris, France, 12 nvembre 2021.

Kinshasa esengi na Conseil ya Conseil ya sécurité ya ONU botosami bwa malako mpe manaka ma Luanda mpe ya Nairobi mpe etumbu na Rwanda kolanda rapport ya ba experts ya ONU na bitumba biye bizali kosalama na monyele ya RDC.

Vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ma Bapaya, Christophe Lutundula alobi o’mokolo mwa yambo na bokutani na bapanzi sango ete akomelaki moyangeli ya Conseil ya sécurité ya ONU o’mokolo mwa mposo moleki mpo na yango.

M. Lutundula alobi ete asengi ete manaka ma Luanda mpe Nairobi matiama na mosala na lombango mpe na ndenge eye makomama kasi mabongolama ata moke te.

" Ekoki kondimama te ete mokanda moye mokabolama na bato banso mozala te na masolo. Esengeli etalama mpe mbano inso esengeli epesama, na kopesaka etumbu na moko na moko mpe na ekolo Rwanda mpe na baye banso bazali komipesa nzela ya kotambola likolo na mibeko mya molongo, kokota na mboka biso mpo na kobundisa biso mpe konyokola bana mboka na biso. Kasi tokozongisa mpe toyebi ete bana mboka na biso banso batelemeli likambo lyango, " elobi M. Lutundula.

Ministre ya mambi ma Bapaya akundoli ete azali kosenga nde botalami bwa rapport ya ba experts ya ONU eye esalamaki yambo ya eye ya mikolo miye.

Bakonzi ba bikolo bya etuka ya Grands lacs (Bitima binene) mpe ya EAC (Lisanga lya bikolo bya Afrika ya est) bakutanaki na Luanda, na Angola mpe babimisaki linaka lya bobandi ya bolongwi ya batomboki ba M23 bisika babotola le 15 janvier 2023 mpe basengaki Rwanda kotika kopesa batomboki baye maboko.

Basengaki mpe na RDC kotika kosangana na batomboki ba FDLR baye bakima Rwanda epayi bafundama na génocide na 1994, mpe na mangomba misusu ya basimba manduki na kobundisa M23, mpe kosukisa boyini bwa baye balobaka kinyarwanda.

Likita lya EAC na Nairobi lindimaki yango mpe libongisaki botindami ya mampinga ya liboke liye na RDC.

Kinshasa efundaka Kigali kopesa M23 maboko mpe Rwanda epamelaka RDC kosanga na FDLR mpe koyina baye balobaka kinyaewanda.

M23 ebanda kolongwa kasi ebololaka bisika misa misusu.

XS
SM
MD
LG