Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame ayambi Lourenço na mesa ya molayi na masolo ma bokengi


Président Paul Kagame ya Rwanda (D) ayambi ma mesa ya molayi président Joao Lourenço ya Angola mpe mokambi ya CIRGL (Likita lya bikolo bya bitima minene to Grands lacs), na Urugwiro village, Rwanda, 11 sanza ya zomi na moko 2022. (Twitter/Présidence Rwand
Président Paul Kagame ya Rwanda (D) ayambi ma mesa ya molayi président Joao Lourenço ya Angola mpe mokambi ya CIRGL (Likita lya bikolo bya bitima minene to Grands lacs), na Urugwiro village, Rwanda, 11 sanza ya zomi na moko 2022. (Twitter/Présidence Rwand

Président Joao Lourenço ya 🇦🇴 Angola azalaki vendredi na 🇷🇼 Rwanda, epayi wapi akokutanaki na mokonzi ya ekolo eye, Paul Kagame, mpo na komeka kozwa eyano na nzela ya masolo kati na Kigali na Kinshasa na bitumba biye bizali kongala na monyele ya Ekolo Congo démocratique.

Joao Lourenço azali sika mokambi ya CIRGL, likita lya bikolo bya bitima minene to Grands lacs.

M. Kagame na M. Lourenço bavandaki na mesa ya molayi na masolo mango na villahe Urugwiro, epaui mokonzi ya Rwanda avandaka, kolanda bilili misala mya sango mya M. Kagame miwitu kobimisa.

"Masolo mango matalaki bokengi na etuka eye". elobi ndako ya mosala ya M. Kagame na compte Twitter na yango.

Kinshasa ezali kofunda Kigali na kopesa maboka na M23, lingomba lya batomboki baye bazongelaki mandoki na suka ya 2021 mpe bapusanaki mikolo mileki kino pene na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

Kigali ewangaka lisungi na M23 kasi epamelaka Kinshasa kobundisa M23 na lisungi lya ba FDRL, batomboki bakima Rwanda nsima na genocide ya 1994.

Linaka to Feuille de route moko ezwamaki na bokutani ya Felix Tshisekedi mokonzi ya Ekolo Congo démocratique na Paul Kagame ya Rwanda na miso mya Joao Lourenco ya Angola, na Luanda, mpo na kosenga botelemisi bitumba mpe bolongwi ya M23 bisika ebotola kasi mokano mwango motiama nanu na mosala te.

Bikolo bya Afrika bya est mpe bindimaki likambo lyango. Lobi leki parlement ya Kenya endimaki kotinda basoda ba ekolo eye pene na nkama libwa na monyele ya RDC mpo na kimya.

XS
SM
MD
LG