Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame andimi kosunga Kenyatta mpo na koyebisi M23 etika bitumba


Mokonzi ya Rwanda Paul Kagame (G) na mokonzi ya Kenya Uhuru Kneyatta (D) na likita lya bakonzi ba bikolo lya mbala 14 ya Northern Corridor Integration Projects (NCIP), Nairobi 26 juin 2018. (AFP)
Mokonzi ya Rwanda Paul Kagame (G) na mokonzi ya Kenya Uhuru Kneyatta (D) na likita lya bakonzi ba bikolo lya mbala 14 ya Northern Corridor Integration Projects (NCIP), Nairobi 26 juin 2018. (AFP)

Mokonzi ya Rwanda, Paul Kagame andimi kosangisa mongongo na ye na bakonzi babikolo misusu mpo na kosenga batomboki ba M23 kosukisa bitumba, esakoli mokonzi ya kala ya Kenya mpe motindami ya CEA to EAC, Likita lya bikolo bya Afrika ya est, Uhuru Kenyatta o’mokolo mwa mposo.

“Président Kagame andimi mpe kopesa maboko na mokambi masolo ma kimya ma CEA na kolendisa M23 mpo na kotika bitumba mpe kolongwa na mabele ebotola,” elakisi liyebisi ya misala mya M. Kenyatta libimisaki o’mokolo mwa mitano na mpokwa.

“Kenyatta, na masolo na président Paul Kagame, bayokani mpo na bosenga ya botiki bitumba na kozela te,” elobi liyebisi lyango.

M. Uhuru Kenyatta azalaki na Goma, na Nord-Kivu, wuto libandela lya mposo mpo na kobongisa masolo ma kimya masengeli kosalema na Nairobi, na Kenya, o’mokolo mwa yambo mokoya, le 21 novembre 2022.

Na ngambo esusu, bakonzi babikolo Congo démocratique (RDC) Félix Tshisekedi na ya Rwanda Paul Kagame bakokutana se mokolo wana (le 21 novembre 2022) na Luanda, na Angola, kaka mpo na masolo maye.

Nzokande bitumba bizali nanu kongala makasi kati na FARDC, mampinga ma RDC na M23 bikomi Makasi kino na pene na 20 km epayi.

FARDC ezali koluka kopusa M23 na bisika ebotola.

RDC efundaka Rwanda kopesa M23 maboko kasi Kigali ewaganaka mpe epamelaka Kinshasa kobundisa batomboki baye na lisungi lya FDLR, batomboki ba Rwanda bafundama na genocide na Rwanda na 1994.

Kenya etindi pene na basoda ba yango 500 na Goma kasi elaki kobakisa kino bakomba pene na 900 na etinda ya CEA mpo na kobundisa basimba minduki mpe batomboki bazali na RDC soki bakotika bitumba te ndenge masolo ma Nairobi masengaki bango.

XS
SM
MD
LG