Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bisimwa alobi boyokani ya Luanda etali yango te kasi elingi masolo


Ba présidents João Lourenço ya Angola (G), Paul Kagame ya Ruanda (C) na Felix Tshisekedi ya RDC, Luanda, 21 février 2020
Ba présidents João Lourenço ya Angola (G), Paul Kagame ya Ruanda (C) na Felix Tshisekedi ya RDC, Luanda, 21 février 2020

M23 esakoli ete makambo mayokanamaki lobi loleki na bokutani ya bakonzi baike ya bikolo bya etuka ya kati kati ya Afrika mpe ya Afrika ya est na Luanda matali yango te.

Bretrand Bisimwa, mokambi ya M23, mouvement du 23 mars nde alobi yango na maloba akomi na compte Twitter.

Nzokande boyokani botiamaki manzaka lobi loleki na Luanda bopesaki nde ba M23 kino lobi lolokya, mokolo mwa minei na ngonga ya zomi na mwambe, mpo elongwa na ba localités eye ezwaki.

Bertrand Bissimwa akomi na Twitter ete batomboki ba M23 bapesami sango na ndenge esengeli te mpo na likambo lyango.

Mokambi ya M23 alobi ete amonaki, lokola na mokili mobimba, mokanda moko moye molobeli mouvement na ye, moye mozali kotambola na ba réseaux sociaux.

Abakisi ete lingomba lya ye lizali lingomba lya kimya mpe lindima masolo maye mazali kotambwisama na bakambi ya bikolo ya EAC, Lisanga lya mboka ezali na Afrique de l’Est.

Bertrand Bissimwa abakisi ete masolo mazali nzela se moko ya kopesa eyano na makambo mazali na bozindo ya matata na Ekolo Congo démocratique.

Nzokande mokanda moye Kinshasa, Kigali mpe bakambi basusu baike ya CIRGL mpe EAC batiaki manzaka lobi loleki na luanda mozali kopesa nzela na EAC kosalela mampinga ma yango maye mazali kotiama na esika eye kobundisa batomboki baye baokitika manduki te na ndango epesameli bango.

Lobi, molobeli ya mbulamatari ya Congo akundoli ete Kinshasa ekondimaki lisusu te kosangisa batomboki na bituluku na bango na mampinga na yango na kotalaka ndenge bosangisi boleka bopesa eyano ya kimya te mpe bobebisa mampinga.

Président Paul Kagame ya Rwanda azalaki te lobi na bokutani ya Luanda kasi alakisamaki elongi na Ministre wa ye ya MAmbi ya Bapaya, Vincent Biruta.

XS
SM
MD
LG